ProZ.com translation contests » Propose a source text » Lingala source text proposed by Charles MBO


In order to determine which proposed source texts are the suitable for use in ProZ.com contests, proposers and participants are encouraged to "highlight" (like contest entry tagging) and discuss proposed source texts. A good contest source text should pose a reasonable challenge to translators, while allowing for "separation". Refer to the "Propose a source text" overview page for all source text proposal guidelines.

"Kobatelama na bomoi" by Charles

Kobatelama na bomoi
Congo eza na mabongisi ebele oyo etali bomoi ya bato pona kobatela bato nyonso oyo bafandi na Congo na kobatelama na makama soki moto ye moko akoki komisunga na yango to kofuta motuya ya misolo te. Mabongisi yango ezali:
• Kolengela kimobange ya baoyo bazali na bomoi
• Kolengela Bokakatani
Mabongisi na tango ya maladi to ya likama
• Mabongisi na tango ya bozangi mosala
• Mabongisi ya mbotama ya bana pe lisungi ya libota
Mabongisi nyonso wana ezali kotala makama nyonso lokola lifuta ya sima kotika mosala, lisungi na bobungisi mbano ya mombomgo to pe misolo ya lisungi ya libota to pe lisusu mikumba ya misolo nyonso ya kofuta na tango ya maladi to pe ya likama.
Na tango misolo ya kolengela kimobange ya baoyo bazali na bomoi to kolengela bokakatani bozui misusu ezali kokokisa baposa nyonso ya bomoi ya moto, bakobakisa lisusu lisungi mosusu.
Misolo nyonso oyo moto azwaka lokola lisungi ya bomoi ezwamaka na mbongo bazali kokata na lifuta ya suka ya sanza. Basali na bakonzi ya mosala bazali kopesa yango kati-kati.
Na oyo etali lisungi na tango ya maladi, moto oyo asengeli na yango akofuta na kotalaka te bozwi na ye. Na oyo etali bato ya bozwi moke, ba Contons pe ba Confédérations bakotia maboko pona lisungi yango.

Pona bapaya ya mibali pe ya basi, eza na mabongisi ya lolenge mosusu.
Boyokani oyo ezali kati ya Congo na Union Africaine oyo etali kotambola na bonsomi ebongisi lolenge nyonso ya mabongisi ya bobateli ya bomoi. Baye bafandi na UA pe na Congo bazali ndenge moko.
Elongo na ndambu ya Bikolo, Congo asali boyokani ebongisami pona kobatela bomoi.
Pona baoyo bawuti na bamboka oyo bazali na kati ya boyokani wana te, ebongisami pona bango mabongisi ya ndenge mosusu.

Na tango ya mpasi, moto nyonso oyo azali na Congo asengeli, kotosa Mobeko ya Congo, na lisungi ya lombango. Likambo oyo etali pe bandeko oyo makambo na bango ebebi to baoyo bazangi mikanda.
Mabongisi na tango ya maladi to ya likama
Good challenge


General notes about this proposed source text

Discussion about this source text as a whole.
Rank by:
The text speaks about saving money for future use when one become elderly. It is interesting because it makes the translator to think how he can save for his future.